Sixième chantier

Lyrics
[Paroles "Sixième chantier"] Taba soki azo lela mongongo ya makassi Na butu jamais akoki olala libanda Yoka kolela na nga ata na litoyi moko Oh oyo lorenzo Basi mibale na zemi Jamais moko akoki kosenga mosusu Amema ye na mokongo Kolota yo ekoma chaine preferee Na nga ya television Nyama mokila molayi a pimbwaka mosika te Mama maria alelaki trop jour ya liwa ya jesus et Pourtant ayebaki bien que wana Muana nzambe Mayi ya miso na nga etondisi molangi Ya champagne matuzalem na mokolo moko oo Pona kolela yo laurent lorenzo Likelele afutaka mpaku te na l'etat aye Kasi avandaka naye pause na lidusu na ye e Pourquoi ngai te Souviens toi de moi laurent o promettaki nga Y'okozala carte prepayee Vraiment y'obakisela nga compte sim ya love Nzok'ezalaki n'ango ba promesse ya fonctionnaire A assurer moto abosanaki que salaire na ye ekoma ya niongo Sixieme chantier ekoti na b'amoureux Bolingo ya tombola na lata te pardon! Parfum nini yango eyebana koleka Amour ya mbeto na nga ebimisi plaisir libanda Wenze nini oteki sentiment na ngai Wenze nini odefisi bilengi na ngai Madusu ya ndako eboyi kokotisa lumiere na mona tongo Bolingo emelisi nga cafe ya matanga ba tia bangioeuvre d'art ekoti gambela Ezangi musee ee pasii Kukulu elombe elali epayi na nga butu pi Kukulu elombe elali epayi na nga tongo sa Maloba na yo sukali lokola osalaki propagande ya election ya satan Betela tolo na moto akabelaka yo libanki Kasi oyo alakaka yo te elephant Coordonnier abongiselaka bato ba chaussures Kasi ya ye mokoto ebula phase Kunda ebembe ezalaka na yango na receveur te Kasi moto nionso ayebi destination n'ango Kukulu elombe elali epayi na tongo sa Kukulu elombe elali epayi na nga butu pi Couleur ya douceur Ezalaki bonheur, ebongwani malheur Nakomi sans valeur Lorenzo ba promesses Niosso ya tendresse, ebongwani detresse Ozalaki na nga richesse Napesaki yo confiance ndenge ndeke apesaka na nzete Atikeli ye zala ayebi que akoya kokuta yango ee Nzela ya bolingo ekomi ozengana Ata lifelo etonda esika ya satana eza reserve e Est-ce-que esika n'anga na motema na yo obombaki Nakomi koyetola moto et pourtant navandaka pembeni ya volcan ngo oo Nzela ya bolingo ekomi ozengana Ata pe lola etonda esika ya yezu eza reserve e Est-ce-que esika na nga na motema na yo obombaki Nakomi kokelela mayi et pourtant navandaka pembeni ya ebale ngo ooo Mfumu yeu ayebisaki moyibi na croix Kaka lelo tokozala n'o na paradis Ya nga bolingo ekomi nde nazelaka Lelo lobi tout le temps b'explications Baninga na ba love nga mansanga Baninga na ba ntiya nga kolela Est-ce-que ovandaka pe tango mosusu Okanisa moninga otika ye moko na moka bisengo Na ndako na ye laurent mawa Ekomi mokonzi se po abungisa oya ye fungola ya bonheur yo! Mbisi alandaka se esika mayi ekotiolaka laurent Soucis elandi oyo ya nga sourire Pe ec supprimer oyo ya nga la joie Nasali comptabilite y'amour bilan inferieur a zero Motema ezui pension decompte finale te natikali gbetere Yebisa nga laurent sur quel critere o se baser Po osala na wayo o dam na sur memoriam aye Obuaki nioso lokola feticheur a se convertir na christianisme Nioso asalki ekomi le passe Nayebi laurent nzoto elula biloko ya mokili Kasi pema elula kozonga epayi ehuta Yebisa nga bebe mokolo nini okozongela nga Obuka monument ya soucis oyo otika na vie na nga Nakomi olela bolingo neti kaka ebembe Jesus alelaki lazare kasi azalki capable ya kosekwisa ye Nazangi nguya na ressuscite amour ya yo na nga Esili lokola sentiment ya libele ya mama na monoko ya bebe Awa okomi seronegatif ya bolingo ya yo Nga naza toujours atteint Comprime yango nini omeli Ebomi virus ya bolingo Tata mwasi ahuti na mbokoa ayoki nga na wee Balobi na ye na frauder na corbillard Fungola sanduku soki okomona ebembe na nga te Ata ko oko bunga elongi po na kufi na soucis Manzaka temoigner que ezali nga eeeeee Cercueil moto asala yo, ateka yo Moto asombi yo, asaleli yo te Nga pe moto nasaleli yo oh! namoni yo te ooo We mie mimi e eee Mimi e olingi nga nakufa oh oh Mimie olobaki nga nalimbe oh oh Bolingo ebeti nga kibota oh oh Kibota ebimisi kivimba oh oh Kivimba esali nga tofina Tofina ememi nga na kunda wooo Tata mwasi ahuti na mbokoa ayoki nga na wee Balobi na ye na frauder na corbillard Fungola sanduku soki okomona ebembe na nga te Ata ko oko bunga elongi po na kufi na soucis Manzaka temoigner que ezali nga eeeeee
Rate this song
0/5.0 - 0 Ratings
Loading comments...
Credits
- Writers
- Koffi Olomidé