Porte-Monnaie

Album cover art for "Porte-Monnaie" by Koffi Olomidé

Koffi Olomidé - Pop

Porte-Monnaie

0 Plays

Duration: 6:27

View ArtistView Album

Lyrics

Language:

[Intro] Omoni hein, okanisaki nga te Djoudjou Music Tchatcho, jeu, set et match [Couplet 1] Mbongo eza nyonso te na la vie eh ba mama Mbongo eza suka ya la vie te ba yama L'argent ne fait pas tout le bonheur oyo ya ndooto L'argent ça va, ça vient L'argent, c'est rien ça c'est vrai ça (ça c'est vrai ça, c'est vrai ça Ça c'est vrai ça, c'est ça, c'est ça) [Couplet 2] Oyoka moninga azuwa te soki azuwi na ye mbongo Mona yango rien soki lelo ozangi mbongo Baron Manoka akufa ba chavirant batika ba mbongo Moto asalaka mbongo, mbongo esombaka moto te (ouh! eh moto te mbongo) [Pont] Hahahaha, Djoudjou Music Sala mbongo kudia ndambu pe bomba ndambu (sala, sala) Na moziki na yo oko zwa se na salongo (longo, longo) Salisa tata na mama oyo babota yo (sala sala) Salisa baye bazanga nzambe akozongisela yo Bana obota mpe kolinga te bamona mpasi Mbongo ekundaka moto te elelaka mpe te moto Mbongo ezanga mawa (mbongo mawa, zanga mawa, eh kaka mawa mawa ah) Koboya to kolinga moto te po na mbongo Kotia mpe porte monnaie te n'esika ya motema Somba mituka tonga ba ndako mboka mboka kasi soki butu ekomi mpongi se na mbeto moko Eh mbongo eza lokola mwana ya imbwa ami Na tango alingi yo kobengana ye te na coup de sabot Soki akomi kobanga kokima yo c'est fini [Pont... Dedicasse] Ba divas boyebisaka bango que trop parler peut tuer Ba yoka Souzy la pointure au dessus Ngouma, Mandolina Hmmm, Tchatcho [Couplet 3] Nga papa na mama bakolisa nga na pasi Na mbuma ya loso pe na mafuta ya ngashi Ba susu bakuta ba mbongo ya famille, biso ba monimambo Molimo na nga nakoteka te po na mbongo Nazwa to nazanga ekipaka te mokili c'est ça Eh mbongo eza nyonso te na la vie ba mama Mbongo eza suka ya mokili te ba papa ah L'argent ça va, ça vient L'argent, c'est rien ça c'est vrai ça (ça c'est vrai ça, c'est vrai ça Ça c'est vrai ça, c'est ça, c'est ça) [Sebene] Poussa pousse eh Kiss kissombe le tenant du titre....

Rate this song

Rate this song

0/5.0 - 0 Ratings

5
0.0% (0)
4
0.0% (0)
3
0.0% (0)
2
0.0% (0)
1
0.0% (0)

Loading comments...

Credits

Writers
  • Koffi Olomidé