Ko-Ko-Ko-Ko

Lyrics
Ko ko ko ko ko ko ko ko Ko ko ko ko ko ko fongola ndako nga na batama Ko ko ko ko ko ko ko fongola ndako po nga na batama Awa libanda banzoko, bankoyi bazomekana Bipayi oyo kuna batondi meke ya bametiola pe bayindo Moto moyindo pe ya pamba pamba te obe muindo ya ngolo Ngai eh ekelamu ya Nzambe oyo alekela vraiment tango oo Nani alokota ngai oo apesa ng'ata lipati'a suka Nani alokota ngai oo ata na moins cher Obe moko oya ngai james baninga batieli ngai ye miso Oh Nzambe na ngai bolingo ekomi'okata mosisa aa Oya motema na ngai oya bomwana boye Ko ko ko ko ooooo Déception ya bolingo ekomi kotinda ngai na ba n'importe quoi Na préférer na kende kokoma na ngai mofuteli ata na lilita ee Nionso pona kima ata l'amour'a ekukuma boye ee ngai e Zéro zéro sept eee Po nini bolingo ekomisi Dicaprio lokosa mayi oyo esukolaka elamba Ata natelisi ye kombo na ngai se kobwakama ooo Atako natie moto makasi nalanda elamba ti na singa ee Basengeli nga moyi ee nionso wana po bakawusa ngai ee Atako natie gros dos nakota na ye ti na ndako Badefeli ngai felo Pitshou Kani, Blaise Kani Mawa a olobaka na nga aaaaaa Kanga motema ee ooo mama Didi Stone Tika ba zuwa mama eee Ozali se yo moko na motema Mopao Mokonzi Ko ko ko ko ooooo James okomisi ngai na mbok'a sentiment Okomi 'okangela lisusu porte (Koffi Olomidé) Bolingo ebongaka tolingana na bolingo ya solo Mabe yo osali nga ata satan azo sepela te Nabanzaki ozali mwana moke nalakisa yo nzela nzoka okuba Napesa yo mosuni, olingi mokuwa o ye Badjou biper ngai na motema nayeba Nelly eh Dimension ya bolingo na nga oooo Laurette Mbayani (Koffi Olomidé) Trop sur na la vie pe bipale soki eleki epesaka dégoût Ata mafut'a nzoyi soki'ekoti mpese ekomaka nkele ooo Caprice ya motuka babengaka mécanicien Oy'a ngai motema ezui en panne ee mécanicien nani ee ? Nakomi lokola moto'a belisi muana sika kitutu uu Litoyi'e komi elengi koyoka conseil ya moto tout eee Matiti nionso bako yebisa nga na buka se kobuka Y'o décourager mitema ya future généation na bolingo Ooo james zéro zéro sept eee bibiche makope eeee Aziz makukula dyna dynastie Ooooo koffi olomide, papa michel ombeli eee Motema na nga lelo ezangi compagnon eee Motema na nga lelo ezangi associé eee Nakeyi koyambana na moto'a kilawu, Samy Liyawu Mayele na moto esila nga, mayele nionso James amema Naza licencié na campus, interro'a bolingo na échoué Nga nazalaka pe magistrat nakataka makambo'a bato likambo na nga Nakoki te kokata likambo na nga ee Charly ee, nakoki te kokata likambo na nga eeee James eee Eee zéro zéro sept eeee nzongo o eeeeeee hein hein eee Ko ko ko ko ko ooooo Kota ata losambo na kanisa ezali libengi ya Nzambe Soki'ozueli nga double te ekosala nga motema pasi ee Nini ezangi nga eza na ye po o négliger ngai ee Y'oyinisi nga kombo ya kolinga Ata mama abota nga soki alobi alingaka nga nakoboya Po yo moto olatisa kazaka bolingo o désahabiller nga e Verbe aimer ekotikela se mabele aya ko conjuguer Po ye nde ayambaka, mabele eboyaka moto te ee Y'osali nga mbango mbango, vite fait eeee Aa eee y'osali nga limbele ee vite fait hum hum hummm Est-ce que c'est vraiment toi mon amour Okangi na yo matoyi charly, y'oboy'ata koyoka kolela na nga ee Y'otika nga na songe ya mboka, matanga iii eee Mongongo na nga nani'a yoka, charly eee Kingo na yo na lipeka ya moto mosusu uu Ata miso ebo kotala, permettre matoyi'eyoka aa Kolela na nga ya suka, aie pitié kito ooo Ezwi ngulu'a zamba, ngulu'a mokili ii koseka te Ezwi fally ipupa, murphy mbongo, lorris la congolaise Nazwi férié na motema, faute ewuti epayi'a washington bountshi Monoko ezwi congé ya ko benga kombo ya charly eee O suspendre matoyi koyoka ba je t'aime na yo ooo Motem'etikala se na stock ya kala ya provision ya bolingo'a charly Bébé non kupenda oh james charly heee Aa eee james kokenda te ee, olelisi moto lokola Bakandja Aa eee aa eee zonga zonga ooo junior okito, ya François Babadi Modogo botekola aa Ko ko ko ko oooooooooooo Ko ko ko ko oooooooooooo Natondisami na mawa na motema na ngai ee Natondisami na mawa na mabanzo na nga aa ee Charly pourquoi otie nga na pourtour'a b'amoureux déçus Nakomi'otala lisano'a bolingo na mosika aa ee Lokola na yebi kolinga te eee Ekosala pasi eee, ekosala pasi eee Baponaka jour'a koboya moninga Y'otali'ata calendrier te ooo, y'oboyi nga se jour'a saint hein Hein hein valentin Ebandaki na tongo tongo to komi'o yingela pokwa a Pardon mon charly, pardon james zéro zéro sept ee Beng'ata moninga avant to déborder, to déborder Nakokufa pona yo eee Nako craquer pona pasteur nival Nako ka aaaaaaaaaaaa Zonga zonga zonga......
Rate this song
0/5.0 - 0 Ratings
Loading comments...
Credits
- Writers
- Fally Ipupa